2 Timothy 3

Libebi oyo ekoya

1Kasi yeba makambo oyo : mikolo ya suka ekozala mikolo ya pasi. 2Pamba te, bato bakokoma moyimi, lokoso ya mbongo, lolendo, lofundu, bakotiola Nzambe, bakotosa baboti na bango te, bakoyeba kozongisa matondi te, bakotosa makambo ya Nzambe te, 3bakotonda na nko, bakoyokela bato mawa te, bakokosela baninga makambo, bakokoka komibatela te, bakonyokola baninga, bakoboya makambo ya malamu ; 4bakoteka baninga, bakobanda kosilika noki, bakotonda na lofundu, bakolinga bisengo mingi koleka Nzambe. 5Bakobanda komilakisa lokola bato oyo batosaka makambo ya Nzambe, kasibakowangana nguya na yango. Kima bato ya denge wana !

6Pamba te, basusu na kati na bango bakotaka na badako ya bato mpe bakangaka na bowumbu basi oyo batonda na mikumba ya masumu, basi oyo bamemamaka na baposa ya nzoto ya denge na ndenge, 7baoyo bayekolaka tango nyonso, kasi bakokaka ata moke te koyebamakambo ya solo.

8Ndenge moko mpe lokola Zanes mpe Zambres batelemelaki Moyize, ndenge moko mpe bato wana bazali kotelemela makambo ya solo. Bazali bato oyo makanisi na bango esiʼebeba, mpe kondima na bango esiʼekufa. 9Kasi bakokende mosika te, pamba te bozoba na bango ekomonana polele na miso ya bato nyonso, ndenge oyo ya Zanes mpe Zambres emonanaki.

Kangama makasi na mateya oyo oyekolaki

10Kasi yo, osiʼososoli malamu penza mateya na ngai, ezaleli na ngai, makanisi na ngai, kondima na ngai, ndenge nakangaka motema, bolingo na ngai, ndenge nayikaka piko, 11minyoko na ngai mpe bapasi na ngai. Oyebi makambo nyonso oyo ekomelaki ngai na Antiose, na Ikonuimi, mpe na Listere. Ya solo, nanyokwamaki mingi penza. Kasi Nkolo akangolaki ngai na makambo nyonso wana.

12Pamba te, moto nyonso oyo alingi kozala na bomoi oyo ezali kotosa Nzambe kati na Yesu Kristo, akoniokwama mingi penza. 13Kasi bato mabe mpe bato oyo bakosaka baninga bakodinda kaka katina mabe, bakokosa bato mosusu, mpe, bango moko mpe basiʼbakosa bango.

14Kasi yo, kangama kaka na makambo oyo oyekolaki mpe oyo ondimaki na motema mobimba, mpo oyebi moteyi oyo alakisaki yo yango ; 15mpe banda bomwana na yo oyebi Makomi ya bosantu ; yango ekoki kopesa yo bwanya oyo ememaka na lobiko na nzela ya kondima oyo ezali kati na Yesu Kristo.

16Pamba te, Makomi nyonso ekomama na nguya ya Nzambe, mpe ezalina tina mingi mpo na koteya bato, mpo na kopamela bato, mpo na kobongisa bato, mpe mpo na kolakisa bato ete batambola na bomoi ya malamu, 17mpo ete moto ya Nzambe azala ya kokoka mpe ya kokoka malamu-malamumpo na kosala misala nyonso ya malamu.
Copyright information for LinMNB